Zazou Testo

Testo Zazou

Epayi Na biso moto nioso a yebi oza ya ngai
O prefere poulet rotie e pourtant
Okola na tomson pe ba tie mwa gaigai
Na piment na mwa kikalakasa ba sala ngo na mossaka
Thierry kongolo
Nzambe il fallaki osala nzoluga kokerico
Tango a ko kima bango na lande ye
Na sima napoignarder
Botika na zokisa ye po na yoka
Sai sais ai
Moto a kweyisi bongo atabolaka miso na se
Oyo ya ngai bolingo soki e kweyi wapi to pe na gambela
Thierry kongolo to na super marche che che che
Amour na ngai e refroidire thierry ya ko réchauffe
Obonga na ngai lokola odemba ebonga na ferre gola
Moto a bengaka ngai leader lelo a ignorer ngai
Ba photo oyo to kanga na ye a tiya ngai signe ya croix
Synonyme ya kufa eee
Ka ekomi grave na za na soins intensif oza te
Mayi ya miso ekomikotanga lokola mvula
Na saison na ngo
Bo tika na lela po ba bwakisi ngai
Ma ngwelima zazou Matsokolo ma wilimeh
Ma ngwelima zazou
ba nzoto no ya pamba na ndako ozo koka te
Monoko no ya pamba Na ndako osalaka rien
Likemba ya amour Na ngai eteli o o
E zo senga kaka ba kalinga ngo
Elela tsolololo
Elela foko foko
Ma ngwelima zazou Matsokolo ma wilimeh
monoko na yo ya pamba ko yemba ozo koka te
Monoko na yo ya pamba na chambre osalaka rien
Absence na yo epesi ngai visa ya lilita
Na zwi deuil ya bolingo thierry réconforté ngai
Ngai na komi sujet sous squelettes lelo ngai sujet ya litso
Soki moniokoli ezalaki mwana ba tia vaccance na motema na yo
Mbele oyoki ndengue eko sala ngai
Eeeeh ooooh eeeh oooh
Y'olobaki oyo e lie ngai e lie ngai
Lelo yo tie na yo poids
vide otiki awa moto nioso a tie yango ka
Match ezalaki te kwata pourquoi o abandonner na no poste avant l'heure
O za joueur oyo a zanga na ye reserve ee
Défenseur ya motema na ngai okei na barre poteaux
Po ezalaki se ba we we we we weeeeeeeeeeeeh
Souci esi e tongui makadame na motema na ngai
Defile de malheur détresse ngai na lembi o o o
Ngai na lembi o o oh thierry kongolo
Ezalaka normal infirmière a koma médecin po a mérite
Soki a boyi ko assure vie na ngai dans le futur wana oluki liwa na ngai ee
Thierry kongolo
Thierry kongolo lembisa ee
Tala na sima omona ngai ndengue na zo noyé
Ndengue na komi e
a vomissant na miso na yo iiiii hi hi hi hi hi hi
Ata ba lobi ebale mozindo thierry kongolo na ngambo
Pona kokatisa il faut na tambola lokola makolo ya jesus Christ
Na oser kaka comment
Ko mona ndengue na zo kima yo
Ata balobi
Ata ba lobi lobi trop
Ngai pe kotika no jamais po nde nzambe a guidela ngai ee
patou valeur(lead)
Nani a koti na bilanga na ngai ee
a boukeli ngai bouma patrick difouana
A boukeli ngai bouma George moudiangombe
A boukeli ngai bouma Didier kaya
Oyebi ngai Na lingaka
Lisolo ya motemaOyo ngai na kolinga
Bango nde ba boyaka ngai
Oyo ngai na ko boya nzambe ee
Bango nde ba landaka ngai
Bebe Na ngai ya moke
Bebe Na ngai a lelaka Te
Nani a beteli ngai bebe
Kenza Melina alelaka Te
Bebe Na ngai ya moke
Tango mosusu otutanaki Na Mur ya ndako
E wawa ocean nzanzo
E wawa jc omeonga e
E wawa Antonio afa