Eclipse Testo

Testo Eclipse

Bolimbisa carole -
bino baye bolingo eniokola -
na tsiolaki pasi na bino
lelo mpe ekwesi ngai -
lelo mpe ebeti ngai KO débout
moniokoli soki eza kulutu ya jouissance
ezala ata apéritif -
na plat ya bolingo
kasi eza droit na yo oti ngai -
ya ko abonné ngai -
na souffrance ya libela
ata condamner à mort -
massanga mike mpe bileyi ezalaka
koboma amoureux moto eza
koboma amoureux moto eza
koboma planet mobimba-
po l'amour eza visa ya compliqué -
epesameli moto ya pusu
ba pimeli roi
mwasi moko ayebisa ngai -
mokolo bakabelaka ye colié ya 1 millions
asepelaka -
kasi esengo na ye e lutaki ndelo -
mokolo mobali a loulaki vie na ye mobimba
alobaki ye -
ba je t'aime emouvant -
esala mayi na miso oyo selon ye -
eza na valeur koleka
diament - carole
Balou o gagna na yo ngai
balou o gagna na yo ngai déjà
tikela ngai ndabo etikale eeh
mokolo ba ko ya nde ba kuta ngo
cadeau d'amour uuu yehhyeeh pona ko yeba 1 plus 1 égale 2 -
ezuaka tango moke tala ba nzete ya allumette
bakoki ko lakisa kenza lobi akomi spécialiste eee

kasi pona koyeba que motema na ngai
epona yo balou ezua tango boni ii -
tala ba aveugle ba défi na bolingo ya ngoo oooh

na feti ya magorodo -
oyo aza na makwanza ebele ee-
ye nde mokambi ii -
ya ngo erreur
ezalaka elengi -
na tango bozo sala ngo elongo bato mibale eee

na za angelu uta mapapu ezo monana te ooo
mino esekisi mosuni mino eseki nde mosuni -
po mino eko liya
mosuni laurette mpemba

ange koyi ambana chaco aziza ba sambi iii
Jolie mayala eee mado ba mateau -
na za angelu ata mapapu ezo monana te ooo
mino esekisi mosuni mino eseki nde mosuni -
mpo mino eko liya mosuni ninelle sassou
na feti ya magorodo -
oyo aza na makwanza ebele ee-
ye nde mokambi ii -
ya ngo erreur
ezalaka elengi -
na tango bozo sala ngo elongo bato ebele eee

naza angelu ata mapapu ezo monana te ooo
ekelamu a memaka milimo na bobungi bungi ii-
a belama libela aa
to mi kitisa na satana to wumela te -
est ce que bako bala ngai oohoo
bango bako bala ngai oohoo -
est ce que bako bala ngai
carole balou ba lelana ee -
bolingo yango eclipse solaire + refrain
eloko nini ba tiya yo na motema po lelo okoma boye ngai ee -

ne quitte jamais celui que tu aimes -
pour celui qui te plaît mon amour -
motema na ngai ezo reprocher ngai -
nano na
sepeli te -

guy bokopole ya denise -
kotisa ngai tina destination ya elengi
na yoka bien eeh -

heritier mokuba eeeeh + refrain